bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 2
Matthew 2
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 3 →
1
Yesu abotamaki na Betelemi ya Yudea, tango Erode azalaki mokonzi; sima na yango, bato ya mayele oyo bayekolaka minzoto, bawutaki na mokili ya Este, bakomaki na Yeruzalem.
2
Batunaki: —Mokonzi ya Bayuda oyo awuti kobotama azali wapi? Pamba te, tomonaki monzoto na ye na mokili ya Este, yango wana toye kokumbamela ye!
3
Tango mokonzi Erode ayokaki sango yango, ye na bato nyonso ya Yeruzalem bamitungisaki mingi.
4
Abengisaki bakonzi nyonso ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko, mpe atunaki bango soki Kristo asengeli kobotama wapi.
5
Bazongiselaki ye: —Na Betelemi ya Yudea, pamba te moprofeta akomaki boye:
6
E e yo Betelemi, kati na mokili ya Yudea, ozali moke te kati ya bakonzi ya Yudea, pamba te, Mokonzi akobima epai na yo, oyo akozala mobateli ya bato na ngai Isayele!
7
Bongo Erode abengisaki na sekele bato ya mayele oyo batalaka minzoto mpe atunaki bango bayebisa ye tango penza oyo monzoto ebimaki.
8
Atindaki bango na Betelemi na maloba oyo: —Bokende kuna mpe botuna malamu makambo ya mwana wana. Tango bokomona ye, boyebisa ngai, mpo ngai mpe nakende kokumbamela ye!
9
Sima ya koyoka maloba ya mokonzi, bakendaki. Mpe monzoto oyo bamonaki na Este ezalaki kokende liboso na bango kino tango etelemaki likolo ya esika mwana azalaki.
10
Tango bamonaki monzoto, bayokaki esengo mingi penza.
11
Bakotaki na ndako, bamonaki mwana na mama na ye Mariya; bafukamaki mpe bakumbamelaki ye. Bongo bafungolaki basaki na bango, mpe bapesaki ye makabo oyo: wolo, ansa mpe mafuta ya solo kitoko.
12
Awa Nzambe akebisaki bango na ndoto, ete bazonga te epai ya Erode, bazongaki na mokili na bango na nzela mosusu.
13
Tango bakendaki, anzelu ya Nkolo abimelaki Zozefi na ndoto mpe alobaki na ye: —Telema, kamata mwana na mama na ye, mpe kina na Ezipito. Vanda kuna kino tango nakoyebisa yo pamba te Erode akoluka mwana, mpo na koboma ye.
14
Kaka na butu wana, Zozefi atelemaki, akamataki mwana na mama na ye, mpe akendaki na Ezipito.
15
Avandaki kuna kino tango Erode akufaki. Na bongo nde maloba ya Nkolo, oyo alobaki na monoko ya moprofeta ekokisamaki: Nabengaki mwana na ngai abima na Ezipito.
16
Tango Erode amonaki ete bato ya mayele oyo batalaka minzoto batosaki ye te, atondaki na kanda. Yango wana atindaki ete baboma, na Betelemi mpe na bamboka ya pembeni-pembeni na yango, bana nyonso ya mibali oyo bazalaki na bambula mibale kino na nse; pamba te alandaki malamu penza tango oyo bato ya mayele baoyo batalaka minzoto bayebisaki ye.
17
Na ndenge wana nde, maloba ya moprofeta Jeremiya ekokisamaki:
18
Mongongo eyokani na Rama; kolela mpe mawa monene. Ezali Rashele, azali kolela bana na ye; aboyi bakitisa ye motema, pamba te bana na ye bakufi.
19
Sima ya liwa ya Erode, anzelu ya Nkolo abimelaki Zozefi na ndoto na Ezipito,
20
mpe alobaki na ye: —Telema, kamata mwana na mama na ye mpe zonga na mokili ya Isayele, pamba te baoyo bazalaki koluka koboma mwana basiʼbakufi.
21
Zozefi atelemaki, akamataki mwana na mama na ye, mpe azongaki na mokili ya Isayele.
22
Kasi tango ayokaki ete Arkelawusi akomaki mokonzi ya Yudea na esika ya tata na ye Erode, abangaki kokende kuna. Awa bakebisaki ye na ndoto, akendaki kovanda na ekolo ya Galileya,
23
kuna afandaki na vile ya Nazareti. Na bongo nde maloba ya baprofeta ekokisamaki: Bakobenga ye moto ya Nazareti.
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 3 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28