bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 18
Matthew 18
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 17
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 19 →
1
Na tango wana, bayekoli bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye: —Nani aleki monene na Bokonzi ya Likolo?
2
Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango,
3
mpe alobaki: —Nalobi na bino ya solo, soki bobongwani te mpe bokomi lokolabana mike te, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.
4
Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde azali moto monene na Bokonzi ya Likolo.
5
Mpe moto nyonso oyo akoyamba mwana ya ndenge oyo na kombo na ngai, ayambi ngai moko.
6
Kasi oyo akokweyisa na masumu mwana moko na kati ya bana mike oyo bazali kondima ngai, ekozala malamu mpo na ye ete bakanga ye libanga moko ya monene na kingo, mpe badindisa ye na nse penza ya ebale!
7
Mawa mingi na mokili mpo na makambo oyo ekweyisaka bato na masumu! Makambo yango esengeli koya, kasi mawa mingi na moto oyo akozala nzela oyo makambo yango ekoyela.
8
Soki ozali kokweya na masumu mpo na loboko to mpo na lokolo na yo, kata yango mpe bwaka yango mosika. Pamba te, ezali malamu mpo na yo okota na Bomoi na loboko moko to na lokolo moko; ete obwakama na moto oyo ekufaka te na maboko mibale to makolo mibale.
9
Soki ozali kokweya na masumu mpo na liso na yo, longola yango mpe bwaka yango mosika. Pamba te ezali malamu mpo na yo okota na Bomoina liso moko; ete obwakama na moto ya lifelo na miso na yo nyonso mibale!
10
Bokeba ete botiola ata mwana moko te na kati ya bana oyo pamba te, nalobi na bino: baanzelu na bango na Likolo, bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na ngai oyo azali na Likolo.
11
[Pamba te Mwana ya moto ayaki mpo na kobikisa baoyo babunga.]
12
Bokanisi nini? Soki moto moko azali na bameme nkama bongo moko ebungi, akotika te bameme na ye ntuku libwa na libwa mosusu likolo ya ngomba, mpo akende koluka moko oyo ebungi?
13
Mpe soki amoni yango, nalobi na bino ya solo, akoyoka esengo mingi penza mpo na meme wana moko, koleka esengo ya bameme ntuku libwa na libwa oyo ebungaki te.
14
Ndenge moko mpe, Tata na bino ya Likolo, alingi te ete ata mwanamoko na kati ya bana oyo abunga.
15
Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende mpe lakisa ye mabe na yempe bozala kaka bino mibale. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ndeko na yo na nzela ya malamu.
16
Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, mpo ete makambo nyonso oyo bokoloba endimama na nzela ya litatoli yabatemwe mibale to misato.
17
Soki aboyi koyoka bango, yebisa likambo yango na Lingomba; soki aboyi koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopakano mpe lokola mofutisi mpako.
18
Nalobi na bino ya solo; makambo nyonso oyo bino bokokanga awa na nse, ekokangama mpe na Likolo; mpe nyonso oyo bino bokofungola awa na nse, ekofungwama mpe na Likolo.
19
Nalobi na bino lisusu: soki bato mibale na kati na bino, awa na mokili, bayokani mpo basenga ata eloko nini, Tata na ngai oyo azalina Likolo akopesa bango yango.
20
Pamba te esika bato mibale to misato basangani na kombo na ngai, ngai mpe nazali na kati na bango.
21
Bongo Piere ayaki epai ya Yesu mpe atunaki: —Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai oyo asalaka ngai mabe? Ekoki kozala mbala sambo?
22
Yesu azongisaki: —Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambombala sambo!
23
Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kotanga mbongo na ye na basali na ye.
24
Tango abandaki kotanga, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na nyongo na ye ya bamili zomi na batalenta.
25
Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye na mwasi na ye; na bana na ye, na biloko na ye nyonso, mpo nyongo na ye efutama.
26
Kasi mosali oyo afukamaki liboso ya mokonzi, mpe abondelaki ye: —Kanga motema mpo na ngai, nakofuta yo nyongo nyonso!
27
Mokonzi ayokelaki ye mawa, alimbisaki nyongo na ye mpe atikaki yeakende.
28
Kasi tango mosali wana abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala, oyo adefaki badeni na ye kama. Akangaki ye mpe afinaki na kingo. Bongo alobaki na ye: —Futa nyongo na ngai nyonso.
29
Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe abondelaki ye: —Kanga motema mpo na ngai, nakofuta yo nyonso na yo.
30
Kasi ye aboyaki. Akendaki mpe atiesaki ye na boloko kino tangoasilisaki kofuta niongo nyonso.
31
Tango basali mosusu bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi penza, mpe bakendaki koyebisa nyonso epai ya mokonzi na bango.
32
Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye: —Mosali mabe! Nalimbisaki yo nyongo nyonso oyo ozalaki na yango, mpo obondelaki ngai.
33
Boni, okokaki te koyokela moninga na yo mawa ndenge ngai mpe nayokelaki yo mawa.
34
Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, apesaki ye na maboko ya bato oyo baniokolaka bato kino tango afutaki niongo nyonso.
35
Na ndenge wana nde, Tata na ngai ya Likolo, akosala moto na moto na kati na bino, oyo akoboya kolimbis ndeko na ye na motema mobimba!
← Chapter 17
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 19 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28