bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 5
Matthew 5
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 6 →
1
Tango Yesu amonaki bato ebele, amataki likolo ya ngomba mpeavandaki; bongo bayekoli na ye bayaki epai ye azalaki.
2
Mpe abandaki koteya bango:
3
—Esengo na baoyo bazali babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali ya bango.
4
Esengo na baoyo bazali kolela, pamba te bakobondisa bango!
5
Esengo na bato ya boboto, pamba te bakozwa mokili ndenge Nzambe alakaki bango!
6
Esengo na baoyo bazali na nzala mpe posa ya bosembo, pamba te bakotondisa bango.
7
Esengo na bato ya mitema mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa.
8
Esengo na bato ya mitema peto, pamba te bakomona Nzambe.
9
Esengo na bato oyo balukaka kotia kimia, pamba te bakobenga bango bana ya Nzambe.
10
Esengo na baoyo baniokwamaka mpo na bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali ya bango.
11
Esengo na bino soki bakofinga bino, soki bakonyokola bino, mpe soki bakokosela bino makambo ya mabe ya ndenge na ndenge mpo na ngai.
12
Ya solo, bosepela mpe botonda na esengo, mpo lifuti monene ezali kozela bino na Likolo, pamba te baprofeta oyo bazalaki liboso na bino, baniokolaki bango mpe bongo.
13
—Bino bozali mungwa ya mokili. Soki mungwa ebungisi elengi na yango, bakozongisa yango lisusu elengi na nini? Mungwa yango ekozala lisusu malamu mpo na eloko moko te; bakobwaka yango libanda mpe bato bakoniata-niata yango.
14
Bino bozali mwinda ya mokili, mboka oyo ezali likolo ya ngomba, yango ekoki kobombama te.
15
Mpe bapelisaka mwinda te mpo na kotia yango na nse ya katini, kasi na likolo ya eloko oyo batiela muinda mpo engengisa bato nyonso oyo bazali na kati ya ndako.
16
Yango wana, mwinda na bino esengeli engenga ndenge wana liboso ya bato, mpo bamona misala na bino ya malamu mpe bakumisa Tata na bino oyo azali na Likolo.
17
Bokanisa te ete ngai naye mpo na kolongola Mibeko to mpe mateya ya baprofeta; naye mpo na kolongola yango te, kasi mpo na kokokisa yango.
18
Nalobi na bino ya solo, kino likolo mpe nse ekoleka, ata likomi moko te ya moke, ata oyo ya moke penza ekolongwa na Mibeko kino tangomakambo nyonso ekokisama.
19
Yango wana, moto oyo akoboya kotosa moko ya Mibeko oyo, ata oyoeleki moke, mpe akolakisa bato mosusu basala bongo, akobengama moto moke na Bokonzi ya Likolo. Kasi moto oyo akolakisa Mibeko yango na bato mosusu mpe akotosa yango, akobengama moto monene na Bokonzi ya Likolo!
20
Pamba te nayebisi bino, soki bosembo na bino eleki ya bafalizeompe balakisi ya Mibeko te, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.
21
Boyokaki ete balobaki na bakoko na biso: “Koboma moto te”. Mpe moto oyo akoboma moto, akosamba liboso ya bazuzi.
22
Kasi ngai nalobi na bino: moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda, ekoki asamba liboso ya bazuzi. Moto oyo akofinga ndeko na ye: “Zoba”; ekoki bamema ye liboso ya likita ya banganga-Nzambe mpo asamba. Mpe oyo akofinga ndeko na ye; “Liboma!” ebongi babwaka ye na moto ye lifelo.
23
Lisusu, soki otelemi liboso ya mesa ya makabo mpo na kopesa makabo, mpe okanisi na mbala moko ete ndeko na yo azali na likambo na yo,
24
tika makabo na yo wana, liboso ya mesa, mpe kende naino koyokanana ndeko na yo; bongo yaka kopesa makambo na yo.
25
Soki moto azwi yo likambo, yokana na ye noki tango bozali naino na nzela, soki te akopesa yo na maboko ya zuzi, bongo zuzi akotinda yo epai ya polisi mpo atia yo na boloko.
26
Nalobi na yo ya solo: okobima te, kino tango okosilisa kofuta likuta ya suka.
27
—Boyokaki balobaki ete: “Kosala ekobo te!”
28
Kasi ngai nalobi na bino, soki moto atali mwasi na miso oyo etonda na baposa ya mabe asiʼasali ekobo na ye na motema.
29
Yango wana, soki liso na yo ya mobali ezali kokweyisa yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika! Pamba te, malamu ozanga eteni moko ya nzoto kasi nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo te.
30
Soki mpe loboko na yo ya mobali ezali kokweyisa yo na masumu, katayango mpe bwaka yango mosika. Pamba te, malamu ozanga eteni moko ya nzoto, kasi nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo te.
31
—Balobaki lisusu ete: “Soki moto akabwani na mwasi na ye, esengeli apesa ye mokanda ya koboma libala.”
32
Kasi ngai nalobi na bino: mobali oyo akabwani na mwasi na ye, longola kaka mpo na likambo ya ekobo, ezali ye moto afungoleli mwasi yango nzela ya kosala kindumba. Oyo mpe abali mwasi balongola na libala, asali ekobo.
33
—Boyokaki lisusu balobaki na bakoko na biso: “Kobebisa te ndayi oyo olapaki; bilaka oyo opesaki tango olapaki ndayi liboso ya Nkolo, esengeli okokisa yango.”
34
Kasi ngai nalobi na bino: bolapaka ndayi te; ezala na kombo ya Likolo, pamba te Likolo ezali Kiti ya Nzambe;
35
ezala na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali esika Nzambe atiaka makolo na ye; ezala na kombo ya Yeruzalem, pamba te yango ezali mboka ya Mokonzi monene.
36
Kolapa mpe te na kombo ya motu na yo pamba te okoki kokomisaata suki moko te ya motu na yo pembe to mwindu.
37
Kasi tika kaka ete “Ee!” na bino, ezala “Ee!” mpe “Te!” na bino, ezala kaka “Te!” Pamba te nyonso oyo ebakisamaka na likolo, ewutaka na molimo mabe.
38
—Boyokaki balobaki ete: “Soki moto atoboli liso ya moninga, ye mpe bakotobola oyo ya ye. Soki moto abuki lino ya moninga, ye mpe bakobuka oyo ya ye”.
39
Kasi ngai nalobi na bino: botia tembe te na moto oyo alingi kosala bino mabe; kutu soki moto abeti yo mbata na litama ya mobali, pesa ye mpe oyo mosusu.
40
Soki moto alingi kofunda yo mpe kozwa simisi na yo, pesa ye mpe kazaka na yo.
41
Soki moto atindi yo na makasi otambola kilometele moko, yotambola na ye bakilometele mibale.
42
Pesa na moto asengi yo, mpe koboya te kodefisa moto oyo alingi kodefa epai na yo.
43
Bayokaki balobaki ete: “linga moninga na yo mpe yina monguna na yo”.
44
Kasi ngai nalobi na bino: bolinga banguna na bino mpe bosambela mpo na baoyo banyokolaka bino!
45
Na ndenge wana nde, bokozala bana ya Tata na bino oyo azali na likolo. Pamba te, ye angengisaka moi na ye likolo ya bato ya malamu mpe likolo ya batu mabe; anokisaka mbula na ye likolo ya bato na sembo mpe likolo ya bato oyo bazali sembo te.
46
Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa? Boni, bafutisi mpaku basalaka mpe bongo te?
47
Soki bopesaka mbote kaka na bandeko na bino, likambo nini ya kokamwa bosalaka? Boni, bapakano basalaka mpe bongo te?
48
Yango wana, bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 6 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28