bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 9
Matthew 9
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 8
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 10 →
1
Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendaki na vile na ye.
2
Bamemelaki ye moto moko akufa makolo, oyo azalaki ya kolala na mbeto. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na moto oyo akufa makolo: —Mwana na ngai, yika mpiko, masumu na yo elimbisami!
3
Mpo na yango, balakisi mosusu ya Mibeko babandaki koloba-loba na nse ya mitema: “A a, moto oyo azali kotiola Nzambe!”
4
Yesu ayebaki makanisi na bango mpe atunaki bango: —Mpo na nini bozali na makanisi ya mabe na mitema na bino?
5
Eloko nini ezangi pasi mpo na koloba: “Masumu na yo elimbisami”, to koloba: “Telema mpe tambola?”
6
Kasi mpo boyeba ete Mwana ya Moto azali na bokonzi, na mokili, ya kolimbisa masumu… Bongo alobaki na moto oyo akufa makolo: —Telema, kamata mbeto na yo, mpe zonga na ndako na yo.
7
Moto yango atelemaki mpe akendaki na ndako na ye.
8
Tango ebele ya bato bamonaki bongo, kobanga ezwaki bango, mpe babandaki kokumisa Nzambe oyo apesaki bokonzi ya ndenge wana na bato.
9
Bongo Yesu akendaki. Tango azalaki koleka, amonaki moto moko kombo na ye Matie, avandaki na biro oyo bafutiselaka mpaku. Bongo yesu alobaki na ye: —Landa ngai! Matie atelemaki mpe alandaki ye.
10
Tango yesu azalaki kolia na ndako ya Matie, bafutisi mpaku ebele, na bato ya masumu, bayaki mpe baliaki elongo na Yesu, na bayekoli na ye.
11
Tango bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli na ye: —Mpo na nini moteyi na bino azali kolia elongo na bafutisi mpaku mpe bato ya masumu?
12
Tango yesu ayokaki yango, alobaki: —Bato ya nzoto malamu bazalaka na posa ya monganga te, kasi ezali bato ya maladi nde bazalaka na posa ya monganga
13
Kasi bokende koyekola tina ya maloba oyo: Nalingi bozala bato ya mitema mawa, kasi naboyi mbeka. Pamba te; nayaki mpo na kobengabato na sembo te, kasi bato ya masumu.
14
Bongo bayekoli ya Jean bayaki mpe batunaki ye: —Mpo na nini, biso na bafarizeo toboyaka kolia mpo na mabondeli, kasi bayekoli na yo baboyaka kolia te mpo na mabondeli?
15
Yesu azongiselaki bango: —Ndenge nini, bato oyo babengami na mobali oyo abali, bakoki kozala na mawa na tango ye azali elongo na bango? Kasi tango ekoya, tango bakolongola mobali oyo abali na kati na bango; bongo nde bakoboya kolia.
16
Moto moko te akoki kokamata kitendi ya sika mpona abamba elambaya kala, mpo ete kitendi wana ekopasola elamba ya kala mpe lidusu ekokoma monene.
17
Ndenge moko mpe batiaka te vino ya sika na basaki ya kala; soki te basaki ekopasuka, vino ekosopana mpe basaki ekobeba. Kasi batiaka vino ya sika na basaki mpe ya sika, bongo vino na basaki ekobombama malamu!
18
Tango Yesu azalaki naino koloba makambo wana, mokonzi moko ayaki, afukamaki liboso na ye mpe alobaki: —Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sikʼoyo, kasi yaka kotiela ye loboko na yo mpe akozala lisusu na bomoi!
19
Yesu atelemaki mpe alandaki ye elongo na bayekoli na ye.
20
Mwasi moko azalaki na maladi ya kotanga makila, mpe maladi yango ewumelaki bambula zomi na mibale; ayaki na sima mpe asimbaki songeya elamba na Yesu.
21
Pamba te, akanisaki ete: “Soki nasimbi kaka elamba na ye, nakobika!”
22
Yesu atalaki na sima, amonaki ye mpe alobaki: —Mwana na ngai, yika mpiko; kondima na yo ebikisi yo! Mpe mwasi abikaki kaka na tango wana.
23
Tango yesu akomaki na ndako ya mokonzi, amonaki babeti miziki na batoebele bazalaki kotia makelele;
24
bongo alobaki: —Bobima, mwana akufi te kasi alali pongi. Kasi bato babandaki koseka ye.
25
Sima ya kobimisa bato libanda, akotaki, asimbaki elenge mwasina loboko, bongo elenge mwasi atelemaki!
26
Sango yango epanzanaki na ekolo wana mobimba.
27
Tango Yesu alongwaki wana, bato mibale bakufa miso bazalaki kolanda ye na koganga: —Mwana ya David, yokela biso mawa!
28
Tango akotaki na ndako, bakufi miso bayaki epai na ye; mpe atunaki bango: —Bondimi ete nakoki kosala yango? Bango bazongisaki: —E e nkolo!
29
Bongo asimbaki miso na bango, mpe alobaki: —Esalemela bino ndenge bondimeli!
30
Bongo miso na bango efungwamaki. Yesu akebisaki bango: —Boyoka, moto moko te ayeba likambo oyo.
31
Kasi bango tango bakendaki, bapanzaki Sango na ye na ekolowana mobimba.
32
Tango bazalaki kobima, bamemelaki ye moto moko azalaki na molimomabe mpe azalaki koloba te.
33
Tango Yesu abenganaki molimo wana ya mabe, moto oyo azalaki kolobate, abandaki koloba. Bato bakamwaki mpe balobaki: —Naino tomoni likambo ya boye te na Isayele!
34
Kasi bafarizeo balobaki: —Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
35
Yesu azalaki kotambola na bamboka nyonso mpe na bavile nyonso; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani, mpe azalaki kosakola Sango Malamu ya Bokonzi; azalaki kobikisa bamaladi nyonso mpe bapasi ya ndenge na ndenge.
36
Tango amonaki ebele ya bato, ayokaki mawa mingi penza mpo na bango, pamba te bazalaki komitungisa mpe bazalaki ya kolemba lokola bameme oyo ezangi mobateli.
37
Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Bambuma ya kobuka ezali mingi na elanga, kasi basali bazali moke!
38
Yango wana bosenga nkolo ya elanga atinda basali na elanga na ye!
← Chapter 8
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 10 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28