bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 3
Matthew 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 4 →
1
Na mikolo wana, Jean-Batiste ayaki mpe abandaki koteya na esobe ya Yudea.
2
Azalaki koloba boye: —Bobongola mitema, pamba te Bokonzi ya likolo ekomi pene-pene!
3
Ezali ye nde moprofeta ezayi alobelaki: Mongongo ya moto ezali kobelela na esobe: Bobongisa bala-bala ya Nkolo, bosalela ye banzela oyo etengama te!
4
Jean azalaki kolata bilamba oyo basala na bapuale ya shamo, mpe mokaba ya mposo ya nyama na loketo. Azalaki kolia mabanki na mafuta ya nzoyi.
5
Bato bazalaki kowuta na Yeruzalem, na Yudea mobimba mpe na bapembeni ya mayi ya Yordani, bazalaki kokende epai na ye.
6
Bazalaki koyambola masumu na bango, bongo Jean azalaki kobatisa bango na mayi ya Yordani.
7
Kasi tango amonaki ete bafarizeo mingi na Basaduseoo bazalaki koya kozwa libatisi, alobaki na bango: —Bino libota ya banioka! Nani akebisi bino ete bokima kandaoyo ezali koya?
8
Bobota mbuma oyo ebongi mpo na bato oyo babongoli mitema.
9
Bokanisa te ete bokoki komiloba: “Abraham azali tata na biso!” Pamba te nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abraham bana wuta na mabanga oyo.
10
Epasola komi esiʼebongisami mpo na kokata misisa ya nzete. Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ye malamu te, bakokata yango mpe bakobwaka yango na moto.
11
—Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bosiʼbobongoli mitema. Kasi moto oyo akoya sima na ngai, aleki ngai na nguya mpe nakoki kutu te komema basapato na ye; ye moto akobatisabino na Molimo Mosantu mpe na moto.
12
Asimbi kiyungulu na maboko na ye, mpe akopetola esika na ye oyo batutelaka mbuma; mpe akobomba ble na ebombelo na ye; kasi akotumba matiti na moto moko oyo ekufaka te!
13
Yesu awutaki na Galileya mpe ayaki na Yordani. Ayaki epai ya Jean mpo na kozwa libatisi.
14
Kasi Jean alingaki kopekisa ye, mpe alobaki na ye: —E e! ezali ngai moto nalingaki koya kozwa libatisi epai na yo, kasi yo oye epai na ngai!
15
Kasi Yesu azongisaki: —Tika ete ezala bongo sikʼoyo! Pamba te, ezali na lolenge oyo nde ekoki na biso kokokisa bosembo nyonso. Bongo Jean andimaki.
16
Tango Yesu azuaki libatisi, abimaki na mayi, likolo efungwamaki, mpe amonaki Molimo na Nzambe azalaki kokita lokola pijon, mpe ayaki likolo na ye.
17
Mpe mongongo ewutaki na likolo elobaki: —Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, asepelisaka ngai mingi!
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 4 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28