bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 6
Matthew 6
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 5
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 7 →
1
—Bokeba ete bosala bolamu te na miso ya bato, mpo ete bango bamona bino; soki te bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abomopanga bino.
2
Tango ozali kopesa likabo na mobola, kobeta kelelo te liboso na yo ndenge bato ya lokuta basalaka na bandako ya mayangani mpe na babala-bala, mpo ete bato bakumisa bango. Ya solo nalobi na bino; basiʼbazwi lifuti na bango.
3
Kasi tango yo ozali kopesa eloko na mobola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba te likambo loboko ya mobali ezali kosala;
4
mpo ete likabo na yo epesama na sekele; bongo Tata na yo oyo amonaka makambo oyo esalamaka na sekele akopesa yo lifuti.
5
Tango bozali kobondela, bolanda te bizaleli ya bato ya lokuta, bango balingaka kobondela ya kotelema na bandako ya losambo mpe na bisika oyo babala-bala ekutanaka, mpo ete bato bamona bango. Ya solo nalobi na bino: basiʼbazwi lifuti na bango.
6
Kasi yo, soki olingi kobondela, kota na ndako na yo, kanga porte mpe bondela Tata na yo oyo azali na esika ya sekele; bongo Tatana yo oyo amonaka makambo oyo esalamaka na sekele, akopesa yo lifuti.
7
Tango bozali kobondela, bozongela-zongela maloba te ndenge bapakano basalaka. Pamba te, bakanisaka ete Nzambe akoyoka bango soki balobi mingi.
8
Bosalaka lokola bango te. Pamba te, Tata na bino ayebi soki bozali na posa ya eloko nini, liboso ete bosenga ye yango!
9
Bobondelaka boye: Tata na biso ozali na Likolo, tika ete kombo na yo ekumisama,
10
tika ete Bokonzi na yo eya, tika ete mokano na yo esalama, awa na nse mpe kuna na likolo.
11
Pesa biso lelo bilei na biso ya mokolo na mokolo,
12
limbisa mabe na biso ndenge biso mpe tolibisaka baoyo basalaka biso mabe.
13
Batela biso mpo tokweya na komekama te, kasi kangola biso na mabe. [Pamba te, bokonzi, nguya mpe kembo ezali ya yo mpo na libela na libela.]
14
Pamba te soki bolimbisi bato mabe na bango, Tata na bino ya Likolo akolimbisa bino mpe.
15
Kasi soki boboyi kolimbisa bato mabe na bango, Tata na bino mpe akolimbisa bino te.
16
Tango bozali koboya kolia mpo na mabondeli, bokoma mawa-mawa tendenge bato ya lokuta basalaka. Pamba te, bakomisaka bilongi mawa-mawa mpo na kolakisa bato ete bazali koboya kolia. Nalobi na bino ya solo, basiʼbazwi lifuti na bango.
17
Kasi tango yo ozali koboya kolia mpo na mabondeli, sukola elongi na yo mpe pakola malasi na motu,
18
mpo moto ata moko te ayeba ete oboyi kolia mpo na mabondeli; longola kaka Tata na bino oyo avandaka na sekele. Bongo Tata na yo, oyoamonaka makambo oyo esalamaka na sekele, akopesa yo lifuti.
19
— Bobomba bomengo na mokili oyo te; epai mpese ekoki kolia yango mpe ekoki kobeba, mpe epai miyibi bakoki kotobola mpe koyiba.
20
Kasi bobomba bomengo na likolo; epai mpese ekoki kolia yango te mpe ekoki kobeba te, mpe epai miyibi bakoki kotobola te mpe koyiba te.
21
Pamba te, epai bomengo na yo ezali, motema na yo mpe ekozala kuna.
22
Liso ezali mwinda ya nzoto; soki liso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba ekozala moi.
23
Kasi soki liso na yo ezali mabe, nzoto na yo mobimba ekozala molili. Bongo soki moi oyo ezali na yo ekomi molili, molili yango ekokoma makasi penza.
24
—Moto moko te akoki kosalela bakonzi mibale. Pamba te, akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akokangama na moko mpe akoboya oyo mosusu: bokoki kosalela Nzambe na mbongo te.
25
Yango wana nalobi na bino, bomitungisa te mpo na bomoi na bino: soki bokolia nini mpe soki bokomela nini. To mpo na nzoto na bino, soki bokolata nini. Boni, bomoi eleki biloko ya kolia te? Bongo nzoto, eleki bilamba te?
26
Botala bandeke ya likolo elonaka te, ebukaka te, mpe ebombaka bilei na bibomopanga te, kasi Tata na bino ya Likolo aleyisaka yango. Boni, boleki yango na tina te?
27
Nani kati na bino, mpo na mitungisi na ye, akoki kobakisa molayi ya bomoi na ye, ata mpo na ngonga moko.
28
Bongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka; yango esalaka te mpe etongaka bilamba te.
29
Nzokande nayebisi bino, ata mokonzi Salomon, kati na nkembo na ye mobimba, alataki te lokola moko na yango.
30
Bongo soki Nzambe azali kolatisa na ndenge wana matiti ya bilanga, oyo ezali na bomoi lelo mpe lobi ekobwakama na moto; akoki kolatisabino koleka yango te? A a! bato ya kondima moke!
31
Yango wana, bomitungisa te mpe boloba te: “Tokolia nini?” to “Tokomela nini?” to “Tokolata nini?”
32
Biloko wana nyonso, ezali bapakano nde baluka-lukaka yango. Kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi ete bozali na yango posa.
33
Boluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na ye, bongo biloko wana nyonso bakobakisela bino yango.
34
Yango wana, bomitungisa te mpo na mokolo ya lobi; pamba te, mokolo ya lobi ekomitungisa na makambo na yango, yango moko. Mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango!
← Chapter 5
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 7 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28