bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 4
Matthew 4
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 5 →
1
Bongo Molimo amemaki Yesu na esobe mpo zabolo ameka ye.
2
Sima ya koboya kolia bilei mpo na mabondeli mikolo ntuku minei: moi mpe butu, Yesu ayokaki nzala.
3
Momeki ayaki epai na ye mpe alobaki: —Soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na mabanga oyo ebongwana mampa!
4
Kasi Yesu azongisaki: —Ekomama: Moto akozala na bomoi kaka mpo na limpa te, kasi mpe mpo na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe!
5
Bongo Zabolo amemaki ye na vile ya bosantu, atiaki ye na esika oyo eleki likolo, oyo ya Ndako ya Nzambe,
6
mpe alobaki na ye: —Soki ozali Mwana ya Nzambe, mibwaka na nse. Pamba te ekomama: Akotinda baanzelu na ye mpo na yo. Bakomema yo na maboko na bango, mpo ete lokolo na yo etuta libanga te!
7
Yesu azongisaki: —Ekomama lisusu: Komeka Nkolo Nzambe na yo te!
8
Zabolo amemaki ye lisusu likolo ya ngomba moko ya molayi penzampe alakisaki ye bokonzi ya mikili nyonso, na lokumu na yango.
9
Bongo alobaki na ye: —Soki ofukameli ngai mpe okumbameli ngai, nakopesa yo nyonso oyo!
10
Kasi yesu alobaki na ye: —Longwa Satana! Pamba te ekomama: Kumbamela Nkolo Nzambe na yo mpe salela kaka ye moko!
11
Bongo zabolo atikaki ye, mpe baanzelu bayaki kosalela ye.
12
Tango yesu ayokaki ete batiaki Jean na boloko, azongaki na Galileya;
13
tango atikaki Nazareti, akendaki kovanda na Kapenawumi, oyo ezali pembeni ya ebale, na mikili ya zabumoni mpe ya Neftali,
14
mpo ete maloba ya moprofeta Ezayi ekokisama:
15
Mokili ya zabuloni mpe mokili ya Neftali, nzela ya ebale, na ngambo ya Yordani, e e yo Galileya ya bapakano:
16
Bato oyo bazalaki na molili, bamonaki mwinda monene; bazalaki kovanda na mboka ya molili ya kufa, moi ebimeli bango.
17
Banda tango wana, Yesu abandaki koteya boye: —Bobongola mitema, pamba te Bokonzi ya likolo ekomi pene-pene!
18
Awa Yesu azalaki kotambola pembeni-pembeni ya ebale monene ya Galileya, amonaki bandeko mibale: Simon oyo bazalaki kobenga lisusu Piere na ndeko na ye Andele; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki baluki mbisi.
19
Yesu alobaki na bango: —Bolanda ngai, mpe nakokomisa bino baluki ya bato!
20
Kaka na tango wana, batikaki minyama na bango; mpe balandaki ye.
21
Tango apusanaki mwa liboso, amonaki lisusu bandeko mibale: Zaki mwana ya Zebede na ndeko na ye Jean; bazalaki kobongisa minyama na bango na kati ya bwato elongo na tata na bango Zebede. Bongo Yesu abengaki bango.
22
Mpe kaka na tango wana, basundolaki bwato na bango, batikaki tatana bango, mpe balandaki ye.
23
Yesu atambolaki na Galileya mobimba, azalaki koteya na bandakona bango ya mayangani, azalaki kosakola Sango Malamu ya Bokonzi, mpe azalaki kobikisa bamaladi ya ndenge nyonso mpe bapasi ya ndenge na ndengekati na bato.
24
Sango na ye epanzanaki na ekolo ya Siriya mobimba, mpe bamemelaki ye bato nyonso oyo bazalaki na maladi, baoyo bazalaki koyoka bapasi ya ndenge na ndenge, mpe minyoko ya ndenge na ndenge, baoyo bazalaki na milimo mabe, baoyo bazalaki na maladi ya ndeke, mpe baoyo bazalaki na maladi ya buka-buka. Bongo yesu azalaki kobikisa bango.
25
Bato ebele penza bazalaki kolanda ye; ezalaki: bato ya Galileya, ya “Bavile zomi”, ya Yeruzalem na yo Yudea, mpe ya mokili oyo ezalaki na ngambo ya Yordani.
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 5 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28