bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 15
Matthew 15
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 14
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 16 →
1
Bongo bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko bawutaki na Yeruzalem, bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye:
2
—Mpo na nini bayekoli na yo batosaka te bonkoko na biso? Pamba te basokolaka maboko na bango te liboso ya kolia.
3
Yesu azongiselaki bango: —Bongo bino, mpo na nini botosaka te Mibeko ya Nzambe te? Kasi botosaka kakabonkoko na bino?
4
Pamba te Nzambe alobaki: “Tosa tata mpe mama na yo”, mpo oyoakolakela tata to mama na ye mabe, esengeli baboma ye.
5
Kasi bino bolobaka ete: soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye: “Biloko oyo nalingaki kopesa yo, nakopesa yango likabo na Nzambe”;
6
mpe moto oyo asali bongo azali na mabe te epai ya tata na ye to mpe mama na ye, mpo na biloko oyo alingaki kopesa ye. Ya solo, na ndengewana, bozali penza koboma Liloba ya Nzambe mpo na bonkoko na bino.
7
Bato ya kokosana! Ezayi asakolaki malamu mpo na bino:
8
Bato oyo bazali kokumisa ngai kaka na bibebo, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai.
9
Bazali kosambela ngai kaka pamba, pamba te mateya na bango ezali kaka mibeko oyo esalami na bato.
10
Bongo Yesu abengaki ebele ya bato mpe alobaki: —Boyoka mpe bososola:
11
Oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka ye mbindo te, kasi oyo ebimaka na monoko na ye yango nde ekomisaka ye mbindo.
12
Bongo bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe bayebisaki ye: —Oyebi te ete Bafarizeo babeti mabaku tango bayoki maloba na yo?
13
Yesu azongisaki: —Eloko nyonso oyo Tata na ngai ya Likolo alona te, bakopikola yango.
14
Botika bango! Bazali bato bakufa miso oyo bazali kotambusa bato mosusu oyo bakufa miso. Soki moto akufa miso azali kotambusa moto mosusuoyo akufa miso, bango mibale bakokweya na libulu!
15
Piere alobaki na ye: —Limbolela biso lisapo oyo.
16
Bongo Yesu atunaki bango: —Bino mpe bozali naino kososola te?
17
Boyebi te ete oyo nyonso ekotaka na monoko ekendaka na libumu, bongo na sima, ebimaka na libanda?
18
Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka na motema mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
19
Pamba te, makanisi ya mabe, koboma, kosala kindumba, makambo ya soni, koyiba, litatoli ya lokuta mpe kofinga ewutaka na motema.
20
Makambo oyo nde ekomisaka moto mbindo. Kasi, kolia na maboko oyoesokolami te, ekomisaka moto mbindo te.
21
Yesu alongwaki wana mpe akendaki na mokili ya Tire mpe Sidon.
22
Bongo mwasi moko ya Kanana oyo azalaki kovanda na mokiliwana, ayaki epai na ye mpe agangaki: —Nkolo, Mwana ya David, yokela ngai mawa! Mwana na ngai ya mwasi azali konyokwama mingi penza na molimo ya mabe!
23
Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene-pene ya Yesu, mpe babondelaki ye: —Bengana ye, Pamba te azali koganga na sima na biso.
24
Yesu azongisaki: —Batindaki ngai kaka mpo na bameme ya Isayele oyo ebunga!
25
Kasi mwasi wana ayaki mpe afukamaki liboso na ye mpe alobaki: —Nkolo, salisa ngai!
26
Yesu azongisaki: —Ezali malamu te mpo na kokamata limpa ya bana mpe kobwakela yango bambwa!
27
Mwasi alobaki: —E e Nkolo, kasi bambwa baliaka ata bandambo oyo ekweyaka na mesa ya bakonzi na bango!
28
Bongo Yesu azongiselaki ye: —Mwasi, kondima na yo ezali monene. Esalama mpo na yo ndenge olingi! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
29
Yesu alongwaki wana mpe akendaki pembeni ya ebale ya Galileya. Amataki na ngomba mpe afandaki wana.
30
Bato ebele penza bayaki epai na ye. Bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bato bakufa miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko, mpe bato mosusu koleka. Batiaki bango liboso ya Yesu, bongo abikisaki bango.
31
Bato bakamwaki mingi tango bamonaki bababa bakomaki koloba, bato bakufa makolo to maboko babikaki, bato oyo batambolaka tengu-tengubabandaki kotambola malamu, mpe bato oyo bakufa miso babandaki komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isayele.
32
Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki: —Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa mingi, pamba te basali na ngai mikolo misato mpe bazali na eloko ye kolia te. Nalingi kozongisa bango na nzala te, soki te bakoki kokweya na nzela!
33
Bongo bayekoli na ye bazongisaki: —Epai wapi tokoki kozwa mampa ya kokoka, na esika oyo ezangi bato mpo na koleyisa bato ebele boye?
34
Yesu atunaki bango: —Bozali na mampa boni? Bango bazongisaki: —Sambo na mwa bambisi ya mike-mike.
35
Yesu alobaki na ebele ya bato bavanda na mabele.
36
Bongo azwaki mampa sambo wana na bambisi, azongisaki matondi, abukaki yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye. Bongo bango bapesaki yango na bato.
37
Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe yango etondisaki bitunga sambo.
38
Bato oyo baliaki bazalaki mibali nkoto minei, kotanga basi na bana te.
39
Tango Yesu asilisaki kozongisa bato, amataki na bwato mpe akendaki na mokili ya Magadani.
← Chapter 14
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 16 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28