bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 28
Matthew 28
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 27
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
1
Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, sima ya mokolo ya Saba, Mariya ya Magadala mpe Mariya oyo mosusu, bakendaki kotala lilita.
2
Mokili eninganaki makasi penza, pamba te anzelu ya Nkolo awutakina likolo, ayaki, alongolaki libanga mpe avandaki likolo na yango.
3
Lolenge na ye ezalaki lokola kongenga ya kake, mpe bilamba na yeezalaki pembe makasi penza.
4
Somo monene ekotelaki bakengeli: babandaki kolenga mpe bakomakilokola bato bakufi.
5
Bongo anzelu alobaki na basi: —Bobanga te, nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu.
6
Azali awa te, asiʼasekwi ndenge alobaki. Boya kotala esika ye alalaki.
7
Bongo bokende noki koyebisa bayekoli na ye ete asiʼasekwi kati na bakufi. Mpe akeyi liboso na bino na Galileya. Bokomona ye kuna! Sikʼoyonayebisi bino!
8
Batikaki lilita noki penza, na kobanga mpe na esengo monene. Mpebakendaki mbango koyebisa sango yango na bayekoli na ye.
9
Na mbala moko, Yesu akutanaki na bango. Alobaki: —Mbote na bino! Bayaki epai na ye, basimbaki makolo na ye, mpe bakumisaki ye.
10
Bongo Yesu alobaki na bango: —Bobanga te! Bokende mpe boyebisa bandeko na ngai bakende na Galileya; bakomona ngai kuna!
11
Tango basi bazalaki kokende, bakengeli mosusu bakendaki na vilempe bayebisaki na bakonzi ya banganga-Nzambe makambo nyonso ndenge yangoesalamaki.
12
Tango bakonzi ya banganga-Nzambe bakutanaki na bankolo ya Bayuda, babongisaki mwango moko. Bapesaki basoda mbongo ebele,
13
mpe balobaki na bango boye: —Boloba boye: tango biso tozalaki kolala pongi, bayekoli na yebayaki na butu koyiba nzoto na ye.
14
Soki guvelenele ayoki likambo yango, tokokitisa ye motema, mpe bokozwa matata te!
15
Basoda bazwaki mbongo mpe basalaki ndenge batindaki bango. Mpesango oyo epanzana na kati ya Bayuda kino lelo oyo.
16
Bongo bayekoli zomi na moko bakendaki na Galileya, na ngomba oyo Yesu ayebisa bango bakende.
17
Tango bamonaki ye, bakumisaki ye; kasi basusu kati na bangobazalaki na tembe.
18
Yesu ayaki epai na bango mpe alobaki: —Bokonzi nyonso, na Likolo mpe awa na nse epesami na maboko na ngai.
19
Yango wana bokende mpe bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli nangai, bobatisa bango na kombo ya Tata, ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu.
20
Boteya bango batosa nyonso oyo natindaki bino. Boyeba ete nazali na bino mikolo nyonso, kino na suka ya mokili.
← Chapter 27
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28