bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 21
Matthew 21
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 20
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 22 →
1
Tango bapusanaki pene-pene ya Yeruzalem, mpe bakomaki na Betfaze, likolo ya ngomba ya banzete ya Olive, Yesu atindaki bayekoli mibale
2
mpe alobaki na bango: —Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango bokokomakaka na ebandeli ya mboka yango, bokomona mpunda ya mwasi oyo ezali ya kokangama, na mwana na yango pembeni. Bofungola yango, mpe bomemela ngai yango.
3
Soki moto atuni bino likambo, bozongisa: “Nkolo azali na posa na yango”, mpe akotika yango noki.
4
Makambo oyo esalamaki mpo ete maloba ya moprofeta ekokisama:
5
Boloba na elenge mwasi ya Siona: Tala, Mokonzi na yo azali koya epai na yo; azali ya komikitisa mpe avandi likolo ya mpunda ya mwasi, likolo ya mwana ya mpunda, mwana ya mpunda ya mwasi.
6
Bayekoli bakendaki mpe basalaki ndenge Yesu atindaki bango.
7
Bamemaki mpunda ya mwasi na mwana mpunda, batiaki bilamba na bango likolo na yango, bongo Yesu avandelaki yango.
8
Bato ebele penza batandaki bilamba na bango na nzela, basusu bakataki bitape ya nzete mpe batiaki yango na nzela.
9
Bato oyo bazalaki kokende liboso na ye, na baoyo bazalaki kolanda na sima, bazalaki koganga: Ozana na Mwana ya David! Mapamboli na moto oyo aye na kombo ya Nkolo! Ozana na bisika oyo eleki likolo!
10
Tango Yesu akotaki na Yeruzalem, vile mobimba eninganaki, mpe bazalaki kotuna: —Nani yango,
11
Bongo bato bazalaki kozongisa: —Ezali Yesu, moprofeta ya Nazareti oyo ya Galileya!
12
Yesu akotaki na lopango ya Ndako ya Nzambe, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko. Abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, na bakiti ya baoyo bazalaki koteka bapijon.
13
Bongo alobaki na bango: —Ekomama: Ndako na ngai bakobenga yango ndako ya mabondeli; kasi bino bokomisi yango nganda ya miyibi!
14
Bato oyo bakufa miso, na bato oyo batambolaki tengu-tengu bayaki epai na ye, na lopango ya Ndako ya Nzambe, bongo ye abikisaki bango.
15
Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bayokaki kanda mingi penza tango bamonaki makamwisi oyo Yesu asalaki, mpe ndenge bana bazalaki koganga na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe: “Ozana na Mwana na David!”
16
Bongo batunaki ye: —Ozali koyoka makambo bana oyo bazali koloba? Yesu azongiselaki bango: —E e! Naino botangi maloba oyo te: Ozwaki lokumu na monoko ya bana mpe ya baoyo bamelaka mabele.
17
Sima atikaki bango, abimaki na vile mpe akendaki na Betaniya, epai alalaki.
18
Na tongo-tongo, tango azalaki kozonga na vile, ayokaki nzala.
19
Tango amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pembeni na yango, kasi amonaki ata eloko moko te, kaka makasa. Bongo alobaki na nzete yango: —Okobota lisusu mbuma te! Mpe kaka na tango wana nzete ya figi ekawukaki.
20
Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi, mpe batunaki: —Ndenge nini nzete ya figi ekawuki na mbala moko boye?
21
Yesu azongisaki: —Nalobi na bino ya solo: soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kosala kaka makambo oyo ngai nasali na nzete ya figite, kasi bokoki mpe koloba na ngomba oyo: “Longwa mpe mibwaka na ebale”, yango ekosalama.
22
Nyonso oyo bokosenga na libondeli, bokozwa yango soki bondimi.
23
Yesu akotaki na Ndako ya Nzambe; mpe tango azalaki koteya, bakonzi ya banganga-Nzambe na bampaka bayaki epai na ye, mpe batunaki ye: —Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini? Nani apesaki yo bokonzi yango?
24
Yesu azongisaki: —Ngai mpe nakotuna bino motuna moko. Soki bozongiseli ngai eyano, bongo ngai mpe nakoyebisa bino soki na bokonzi nini nazali kosalela makambo oyo.
25
Nani apesaki Jean ndingisa mpo na kobatisa, Nzambe to bato? Batianaki tembe bango na bango, mpe balobaki: —Soki tolobi: “Nzambe”, ye akotuna biso: “Bongo mpo na nini bondimelaki ye te?”
26
Soki mpe tolobi: “Bato”, tozali kobanga bato pamba te batonyonso bayebi ete Jean azalaki moprofeta.
27
Bongo bazongiselaki Yesu: —Toyebi te! Bongo Yesu mpe alobaki na bango: —Ngai mpe nakoyebisa bino te soki na bokonzi nini nazali kosalela makambo oyo.
28
—Bokanisi nini? Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. Akendaki epai ya oyo ya liboso mpe alobaki na ye: “Mwana na ngai, kendekosala lelo na elanga ya vino”.
29
Azongisaki: “Nalingi te” Kasi sima, abongolaki makanisi mpe akendaki.
30
Bongo tata akendaki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Azongisaki: “Nakei, tata!” Kasi akendaki te.
31
Nani na kati na bango mibale asalaki likambo tata na ye alingaki? —Mwana ya liboso. Bongo Yesu alobaki na bango: —Nalobi na bino ya solo: bafutisi mpako na basi ya ndumba, bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino.
32
Pamba te Jean ayaki epai na bino mpo na kolakisa bino nzelaya bosembo, kasi bondimelaki ye te. Nzokande bafutisi mpako na basi ya ndumba bandimelaki ye. Kasi bino, ata bomonaki bongo, bobongolakimitema te mpe bondimelaki ye te!
33
—Boyoka lisapo mosusu. Moto moko azalaki na elanga: akonaki banzete ya vino, asalelaki yango lopango, mpe atimolaki libulu moko mpo na kokamola mbuma. Bongo atongaki ndako moko ya molayi mpo na mokengeli. Sima, apesaki elanga na maboko ya basali ya elanga mpo bafutelaka, mpe akendaki na mobembo.
34
Tango elaka ya kobuka mbuma ekomaki pene-pene, atindaki basali na ye epai ya bato oyo bazalaki kofutela elanga, mpo na kozwa ndambo na ye ya mbuma.
35
Bafuteli ya elanga bakangaki basali na ye; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga.
36
Atindaki lisusu basali mosusu mingi koleka baoyo ya liboso; kasi bafuteli ya elanga, basalaki bango kaka ndenge moko.
37
Bongo suka na yango, atindelaki bango mwana na ye, mpe alobaki: “Bakotosa mwana na ngai!”
38
Kasi tango bafuteli ya elanga bamonaki mwana, balobanaki: “Tala moto akokoma nkolo ya elanga. Boya, toboma ye mpe tozwa elanga na ye!”
39
Bakangaki ye, babendaki ye na libanda ya elanga ya vino, mpe babomaki ye.
40
Bongo, tango nkolo ya elanga ya vino akoya, akosala bafuteli wana nini?
41
Bazongiselaki ye: —Akoboma bato wana ya mabe na liwa moko ya nsomo penza; akopesa elanga ya vino epai ya bato mosusu, mpe bango bakobanda kopesaye ndambo na ye ya mbuma, na tango oyo babukaka!
42
Sima Yesu alobaki na bango: —Botangi naino na Makomi te: Libanga oyo batongi na ndako babwakaki, ekomi libanga ya songe ya ndako; oyo ezali mosala ya Nkolo, mpe likambo ya kokamwa na miso na biso!
43
Yango wana nalobi na bino: Bakolongola Bokonzi ya Nzambe na maboko na binompe bakopesa yango epai ya bato oyo bakobotela yango mbuma.
44
[ Kasi moto oyo akokweya likolo ya libanga yango, akokweya likolo ya libanga yango akobukana biteni-biteni; mpe moto oyo libanga yango ekokweyila ye, akonikama.]
45
Sima ya koyoka masapo oyo, bakonzi ya banganga-Nzambe na bafarizeo bayebakiete Yesu azalaki koloba mpo na bango.
46
Balukaki mwaye ya kokanga ye, kasi babangaki bato. Pamba te bato bazalaki komona ye ete azali moprofeta.
← Chapter 20
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 22 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28