bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 19
Matthew 19
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 18
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 20 →
1
Tango Yesu asilisaki koloba, atikaki Galileya mpe akendaki na mokili ya Yudea, na ngambo mosusu ya Yordani.
2
Bato ebele penza balandaki ye mpe abikisaki bango wana.
3
Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpo na komeka ye, mpe batunaki ye: —Boni, nzela epesami na mobali mpo alongola mwasi na ye na libala mpo na likambo moko boye?
4
Yesu azongisaki: —Botangi naino te ete, na ebandeli Mokeli asalaki bango mobali mpe mwasi,
5
mpe alobaki: yango wana mobali akotika tata na mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma moto se moko.
6
Yango wana, bazali lisusu bato mibale te, kasi moto moko. Bongo, oyo Nzambe asangisi, moto akabola yango te!
7
Bafarizeo balobaki na ye: —Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali akoma mokandaya koboma libala na mwasi na ye, mpe abengana ye na libala?
8
Yesu azongiselaki bango: —Moyize apesaki bino nzela ya koboma mabala na basi na bino, mpo mitema na bino ezalaki mabanga. Kasi na ebandeli ezalaki bongo te.
9
Nalobi na bino ete, oyo akokabwana na mwasi na ye, longola kaka mpo na likambo ye kindumba, mpe abali mwasi mosusu, asali ekobo.
10
Bayekoli balobaki na ye: —Soki mobali asengeli kozala bongo liboso ya mwasi na ye, malamu kutu kobala te.
11
Yesu azongisaki: —Bato nyonso te bakoki kondima mateya oyo, kasi kaka baoyo bazwi likabo yango.
12
Pamba te, basusu babalaka te mpo bakufa mokongo banda babotama, basusu mpo bato balongola bango mapumbu, mpe basusu mpo na kosalela Bokonzi ya Likolo. Oyo akoki kondima makambo oyo, tika andimayango.
13
Bongo bamemelaki Yesu bana mike mpo atiela bango maboko mpe abondela mpo na bango. Kasi bayekoli bagangelaki bango.
14
Bongo Yesu alobaki: —Botika bana mike baya epai na ngai, bopekisa bango te; pambate Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bakokani na bango.
15
Atielaki bango maboko, bongo alongwaki wana.
16
Moto moko ayaki pene-pene ya Yesu, mpe atunaki: —Moteyi, likambo nini ya malamu esengeli nasala mpo nazwa Bomoi ya seko?
17
Yesu azongiselaki ye: —Mpo na nini otuni ngai mpo na likambo oyo ezali malamu? Moto moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota na Bomoi, tosa Mibeko!
18
Moto yango atunaki: —Mibeko nini yango? Yesu azongisaki: — Koboma te, kosala kindumba te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te,
19
tosa tata mpe mama na yo, mpe linga moninga na yo lokolo omilingaka yo moko!
20
Elenge mobali alobaki: —Natosaka mibeko wana nyonso. Bongo nazangi lisusu nini?
21
Yesu alobaki na ye: —Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo, mpe pesa na babola, bongo okozwa bomengo na Likolo. Sima yaka, mpe landa ngai!
22
Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendaki na mawa, pambate azalaki na bozwi mingi penza.
23
Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Nalobi na bino ya solo: ezali pasi mpo moto ya mbongo akotana Bokonzi ya Likolo.
24
Nalobi na bino lisusu ete: ezali pasi te mpo Shamo aleka na lidusu ya tonga, kasi ezali pasi mingi mpo moto ya mbongo akota na Bokonzi ya Nzambe.
25
Tango bayekoli bayokaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki: —Bongo nani akoki kobika?
26
Yesu atalaki bango mpe alobaki: —Epai ya bato, yango ekoki kosalama te; kasi mpo na Nzambe, nyonso ekoki kosalama!
27
Piere atunaki ye: —Tala, totiki nyonso mpo na kolanda yo, bongo ekozala bomi mpo na biso?
28
Yesu azongiselaki bango: —Nalobi na bino ya solo: tango makambo nyonso ekokoma ya sikampe Mwana ya moto akovanda na Kiti na ye ya kembo, bino baoyo bolandaki ngai bokovanda mpe na bakiti zomi na mibale mpo na kosambisamabota zomi na mibale ya Isayele.
29
Mpe moto oyo atika bandako na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, tata na ye, mama na ye, bana na ye, to bilanga na ye mpo na ngai, akozwa yango mbala nkama koleka, mpe akozwa lisusu bomoi ya seko.
30
Kasi bato mingi oyo bazali bato ya liboso, bakokoma bato ya suka; mpe bato mingi oyo bazali bato ya suka bakokoma bato ya liboso!
← Chapter 18
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 20 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28