bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 14
Matthew 14
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 13
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 15 →
1
Na tango wana, mokonzi Erode ayokaki sango ya Yesu.
2
Bongo alobaki na basali na ye: —Ezali Jean Batiste asekwi kati na bakufi, yango wana azali na nguya ya kosala makamwisi.
3
Pamba te, Erode atindaki bakanga Jean, batia ye na minyololo mpe na boloko, mpo na likambo ya Erodiade: mwasi ya ndeko na ye Filipo.
4
Mpo Jean azalaki koloba na ye: —Ozali na ndingisa te mpo na kobala ye.
5
Erode azalaki koluka kobomisa ye kasi azalaki kobanga bato, mpo bazalaki komona Jean lokola moprofeta.
6
Na mokolo ya kokanisa mbotama ya Erode, mwana ya mwasi ya Erodiade abinaki liboso na bango mpe asepelisaki Erode mingi penza.
7
Yango wana Erode apesaki ye elaka ya kolapa ndayi ete, akopesa ye eloko nyonso oyo akosenga.
8
Bongo ye, lokola mama na ye atindikaki ye mpo na koloba; alobaki: —Pesa ngai motu ya Jean Batiste na sani!
9
Mokonzi ayokaki mawa mingi penza; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo bavandaki na ye na mesa, yango wana atindaki bapesa ye yango.
10
Bongo atindaki bakata motu ya Jean na kati ya boloko.
11
Bamemaki motu ya Jean na sani, mpe bapesaki yango na elenge mwasi. Bongo ye, amemaki yango na mama na ye.
12
Bayekoli ya Jean bayaki, bazwaki nzoto na ye mpe bakundaki yango. Bongo bakendaki mpe bayebisaki Yesu likambo yango.
13
Tango yesu ayokaki sango yango, alongwaki wana na bwatompe akendaki ye moko kaka, na esika ezangi bato. Kasi tango bato bayokaki yango, babimaki na bavile na bango mpe balandaki ye na makolo.
14
Tango Yesu akitaki na bwato, amonaki bato ebele penza; ayokelaki bango mawa mingi. Bongo abikisaki bamaladi na bango.
15
Tango pokwa ekomaki, bayekoli bayaki epai na ye, mpe balobaki: —Tozali na esika ezangi bato, mpe tango esiʼeleki; zongisabato oyo na bamboka mpo bakende kosomba bango moko biloko ya kolia!
16
Kasi Yesu alobaki na bango: —Tina ezali te mpo bakende. Bopesa bango bino moko biloko ya kolia!
17
Bongo bayekoli bazongisaki: —Tozali awa na mampa mitano mpe bambisi mibale kaka.
18
Yesu alobaki: —Bomemela ngai yango awa.
19
Sima atindaki bato bavanda na matiti. Akamataki mampa mitano wana mpe bambisi mibale, atombolaki miso na likolo mpe azongisaki matondi. Akataki mampa yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye. Bongo bayekoli bapesaki yango na bato.
20
Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Balokotaki biteni oyo etikalaki mpe etondisaki bitunga zomi na mibale.
21
Baoyo baliaka bazalaki pene-pene mibali nkoto mitano, kotangabasi na bana te.
22
Sima Yesu atindaki bayekoli na ye bamata na bwato mpe bakatisa na ngambo mosusu liboso na ye, ye atikalaki mpo na kozongisa bato.
23
Tango asilisaki kozongisa bato, amataki na ngomba na esika na ye moko kaka, mpo na kobondela. Tango butu ekomaki, azalaki kaka ye moko.
24
Nzokande bwato ekomaki na kati-kati ya ebale mpe mbonge ezalaki kobeta yango; pamba te mopepe ezalaki kotutana na yango.
25
Na ngonga ya minei ya butu, Yesu akendaki epai na bango mpe azalaki kotambola likolo ya ebale.
26
Tango bayekoli bamonaki ye azalaki kotambola likolo ya ebale, batondaki na kobanga mpe balobaki: —Elima! Bongo babandaki koganga mpo na somo.
27
Kasi Yesu alobaki na bango: —Boyika mpiko, bobanga te, ezali ngai!
28
Bongo Piere azongisaki: —Nkolo, soki ezali yo, loba na ngai naya epai na yo, likolo ya mayi.
29
Yesu alobaki na ye: —Yaka! Piere akitaki na bwato, mpe abandakikotambola likolo ya mayi mpo nakokende epai ya Yesu.
30
Kasi tango amonaki mopepe ezalaki makasi, abangaki, mpe abandaki kodinda; agangaki: —Nkolo, bikisa ngai!
31
Na mbala moko Yesu apesaki ye loboko, asimbaki ye, mpe alobaki na ye: —Moto ya kondima moke, mpo na nini otiaki tembe?
32
Tango bamataki na bwato, mopepe mpe esilaki.
33
Baoyo bazalaki na bwato bafukamaki liboso na ye, mpe balobaki: —Ya solo, ozali Mwana na Nzambe!
34
Awa basilisaki kokatisa ebale, bakomaki na mokili ya Genezareti.
35
Tango bato ya esika wana bayebaki ete ezali ye, bapanzaki sango pembeni-pembeni nyonso ya mokili wana. Bongo bamemelaki ye bato na bango nyonso ya maladi.
36
Babondelaki ye ete atika bango basimba kaka songe ya zambala na ye. Bongo baoyo nyonso basimbaki ye, babikaki.
← Chapter 13
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 15 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28