bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 13
Matthew 13
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 14 →
1
Kaka mokolo wana, Yesu abimaki na ndako mpe akendaki pembeni ya ebale.
2
Bato ebele penza bayaki kotondela ye bipai na bipai; yango wana amataki na bwato mpe avandaki. Bongo ebele ya bato batelemaki na mokili.
3
Mpe ateyaki bango makambo mingi na masapo. Alobaki na bango: —Moloni moko akendaki kolona mbuma na elanga.
4
Tango azalaki kobwaka bambuma, ndambo ekweyaki pembeni-pembeniya nzela; bandeke bayaki mpe baliaki yango.
5
Ndambo ekweyaki na esika ya mabanga, epai mabele ezalaki mingi te. Bambuma yango ebimaki noki mpo mabele ezalaki na mozindo te.
6
Kasi tango moi ya makasi ebimaki, mwa banzete yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ezalaki na misisa te.
7
Mosusu ekweyaki kati ya banzube; banzube ekolaki mpe efinaki mwabanzete yango.
8
Kasi mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, mpe ebotaki bambuma: moko, nkama moko; mosusu, ntuku motoba; mpe mosusu, ntuku misato.
9
Oyo azali na matoyi, ayoka!
10
Bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe batunaki ye: —Mpo na nini ozali kolobela bango na masapo?
11
Bongo ye azongiselaki bango: —Bino bozwi nzela ya koyeba basekele ya Bokonzi ya Likolo, kasi bango bazwi yango te.
12
Pamba te, moto nyonso oyo azali na eloko, bakopesa ye mpeakotonda na yango; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
13
Tala tina nazali kosalela masapo mpo na kolobela bango; mpo ata bazali kotala, kasi bazali komona te; ata bazali kotia matoyi, kasi bazali koyoka te mpe kososola te.
14
Ezali mpo na bango nde maloba ya moprofeta Ezayi ekokisami, oyo ezali koloba: Bokoyoka, kasi bokososola te; bokotala, kasi bokomona te!
15
Pamba te mitema ya bato oyo ekomi libanga, bazipi matoyi mpe bakangi miso na bango; na kobanga ete miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, babongola mitema mpe nakoka kobikisa bango.
16
Nzokande, bino bozali bato ya esengo, pamba te miso na binoezali komona mpe matoyi na bino ezali koyoka.
17
Ya solo nalobi na bino: baprofeta mingi mpe bato mingi ya bosembo bazalaki na posa ya komona makambo oyo bozali komona, kasi bamonaki yango te; bazalaki na posa ya koyoka makambo oyo bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
18
Boyoka ndimbola ya lisapo ya moloni mbuma:
19
Mbala nyonso soki moto ayoki Liloba ya Bokonzi kasi asosoli yango te, monguna akoya mpe akopikola mbuma oyo elonamaki na motema na ye; oyo nde mbuma ekweyaki pembeni-pembeni ya nzela.
20
Oyo ekweyaki na esika ya mabanga, ezali moto oyo ayoki lilobampe ayambi yango mbala moko na esengo.
21
Kasi lokola ezangaki misisa, ewumelaki kaka mwa tango moke. Pamba te, tango bapasi to tango minyoko ekoya mpo na Liloba, akokweya noki penza.
22
Oyo ekweyaki na kati ya banzube, ezali moto oyo ayoki Liloba kasi makanisi ya bomoi oyo mpe bomengo oyo ekosaka, efinaka yango, mpe epesaka yango nzela te mpo na kobota.
23
Kasi oyo ekweyaki na mabele ya malamu, ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango. Abotaka mbuma: nkama, ntuku motoba, mpe ntuku misato.
24
Yesu alobelaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na moto moko alonaki mbuma ya malamu na elanga na ye.
25
Tango bato bazalaki kolala, monguna na ye ayaki mpe alonaki matitiya mabe na kati ya ble, bongo akendaki.
26
Tango ble ebimaki mpe ebandaki kobimisa mwa mitu ya mbuma, matiti ya mabe mpe ebimaki.
27
Basali ya nkolo ya elanga bayaki mpe balobaki: —Mokonzi, olonaki mbuma ya malamu na elanga na yo te? Bongo matiti oyo ya mabe ewuti wapi?
28
Ye azongisaki: —Monguna moto asali bongo! Basali batunaki: —Olingi tokende mpe topikola yango?
29
Ye azongisaki: —Te! Mpo tango bokobanda kolongola matiti ya mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango.
30
Botika yango mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka mbuma. Na tango wana nde, nakoloba na bato oyo balongolaka mbuma: “Bolongola liboso matiti ya mabe, bokanga yango maboke mpe botumba yango; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na ngai ya mbuma”.
31
Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na mbuma ya mutarde; moto moko azwaki mpe alonaki yango na elanga na ye.
32
Mbuma yango eleki bambuma nyonso na moke; kasi soki ebimi, elekaka biloko nyonso oyo balonaka na elanga mpe ekomaka mwa nzeteepai bandeke bayaka kosala bandako na bango na bitapi na yango!
33
Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na kisi oyo evimbisaka mampa oyo mwasi akamati mpeasangisi yango na kopo misato ya farine, kino tango farine nyonso ekovimba.
34
Yesu alobaki na ebele ya bato makambo nyonso wana na masapo, mpe ata mbala moko te azalaki kolobela bango bongo azangisa lisapo.
35
Na bongo nde maloba ya moprofeta ekokisamaki: Nakolobela bango na masapo. Nakoyebisa bango makambo oyo ebombama banda mokili esalama!
36
Bongo atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki: —Limbolela biso lisapo ya matiti ya mabe kati na elanga.
37
Yesu azongisaki: —Moto oyo alonaki mbuma ya malamu, ezali Mwana ya moto.
38
Elanga ezali mokili; mbuma ya malamu ezali bana ya Bokonzi. Matiti ya mabe ezali nde bato ya satana.
39
Monguna oyo alonaki matiti ya mabe, ezali Zabolo; tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili. Bongo bato oyo balongolaka mbuma, ezali baanzelu.
40
Ndenge moko lokola bapikolaka matiti ya mabe mpe batumbaka yango na moto, ekozala mpe bongo na suka ya mokili.
41
Mwana ya Moto akotinda baanzelu na ye, mpe bango bakolongola na Bokonzi na ye makambo nyonso oyo ekweyisaka na masumu elongo na bato oyo basalaka mabe.
42
Bakobwaka bango na fulu ya moto; epai ekozala kolela mpe koswa mino.
43
Bongo bato na sembo bakongenga lokola moi na kati ya Bokonzi ya Tata na bango. Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka!
44
—Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba na elanga; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu. Na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso oyo azali na yango mpe akosomba elanga wana!
45
Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo oyo alukaka bapawuni ya kitoko.
46
Soki amoni pawuni moko ya ntalo mingi, akokende koteka biloko nyonso oyo azali na yango mpe akosomba yango!
47
—Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo babwaki na ebale, mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge.
48
Soki etondi, bato oyo bakangaka mbisi bakobimisa yango na mokili, bakofanda, mpe bakotia oyo ya malamu na bitunga bongo bakobwaka oyo ya mabe.
49
Ekozala mpe bongo na suka ya mokili; baanzelu bakoya kokabola batomabe na kati ya bato na sembo.
50
Bongo bakobwaka bato mabe na fulu ya moto epai ekozala kolela mpe koswa mino.
51
—Bososoli makambo oyo nyonso? Bazongisaki: —E e!
52
Bongo Yesu alobaki na bango: —Yango wana molakisi nyonso ya Mibeko oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo, akokani na nkolo ndako oyo azali kobenda kati na bomengo na ye: biloko ya sika mpe biloko ya kala.
53
Tango Yesu asilisaki koloba masapo wana, alongwaki kuna
54
mpe azongaki na vile na ye. Abandaki koteya bato na ndako nabango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa. Batunaki: —Bwania mpe nguya ya kosala makamwisi oyo azwi yango wapi?
55
Ezali ye te mwana ya salampatie? Mama na ye kombo na ye Mariya te? Bongo Zaki, Zozefi, Simon mpe Zude bazali bandeko na ye ya mibali te?
56
Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali na biso awa te? Yango azwi makambo oyo nyonso wapi?
57
Bongo ye azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi yesu alobaki na bango: —Moprofeta azangaka lokumu kaka na mboka na ye mpe na ndako na ye.
58
Bongo asalaki makamwisi mingi kuna te, mpo bazangaki kondima.
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 14 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28