bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 24
Matthew 24
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 23
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 25 →
1
Tango Yesu azalaki kobima na lopango ya Ndako ya Nzambe, bayekoli bayaki pene-pene na ye mpo na kolakisa ye ndenge batongaki Ndako yango.
2
Kasi Yesu alobaki na bango: —Bomoni nyonso oyo! Nalobi na bino ya solo, libanga ata mokote ekotikala likolo ya libanga mosusu. Nyonso ekopanzana!
3
Tango Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya Olive, bayekoli na ye bayaki kaka bango moko mpo na kotuna ye: —Yebisa biso, tango nini makambo wana ekosalama; elembo nini ekolakisa koya na yo mpe suka ya mokili!
4
Yesu azongiselaki bango: —Bokeba ete moto moko te akosa bino.
5
Pamba te, bato mingi bakoya na kombo na ngai mpe bakoloba: “Nazali Kristo” mpe bakokosa bato mingi penza.
6
Bokoyoka basango ya bitumba mpe makelele ya bitumba; bokeba, bobanga te, pamba te, makambo yango esengeli kosalama, kasi wana ekozala naino suka ya mokili te.
7
Ekolo moko ekobunda na ekolo mosusu, bokonzi moko ekobunda na oyo mosusu. Nzala ekozala makasi penza mpe mabele ekoningana na bisika mingi.
8
Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya bapasi oyo mwasi ayokaka soki alingi kobota.
9
Bongo, bakokaba bino mpo na konyokola bino mpe bakoboma bino. Bikolo nyonso ekoyina bino mpo na kombo na ngai.
10
Na tango wana, bato mingi bakotika kondima, bakotekana mpe bakoyinana.
11
Baprofeta mingi ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele.
12
Lokola mabe ekobakisama, bolingo ya bato mingi ekokita.
13
Kasi moto oyo akokanga motema kino na suka, akobika.
14
Sango malamu ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ezalalitatoli na bikolo nyonso. Bongo na tango wana nde, suka ya mokili ekoya!
15
—Yango wana tango bokomona eloko ya somo, oyo ebebisaka, oyo moprofeta Daniele alobaki, etelemi na Esika ya bosantu—moto oyo azali kotanga ayeba malamu tina ya makambo oyo—
16
bato oyo bakozala na Yudea bakima na bangomba.
17
Moto oyo akozala likolo ya ndako, akita te mpo na kokende kozwabiloko oyo ezali na ndako na ye.
18
Moto oyo akozala na bilanga, azonga te na ndako mpo na kokamataelamba na ye.
19
Mawa mingi penza na mikolo wana, mpo na basi oyo bakozala na bazemi mpe baoyo bakozala komelisa bana mabele!
20
Bobondela mpo ete mokolo oyo bokokima ezala na tango ya malili makasi te to na mokolo ya saba.
21
Pamba te, pasi ekozala ya somo, na ndenge ete pasi ya ndenge wanaemonana naino te banda mokili ebanda kino sikʼoyo; mpe pasi ya ndengewana ekozala lisusu te.
22
Mpe soki ayeyisaki mikolo yango mokuse te, mbele ata moto moko te akokaki kobika; kasi ayeyisaki yango mokuse mpo na bato oyo ye apona.
23
—Na tango wana, soki moto alobi na bino: “Boyoka! Kristo azali awa” to “Azali kuna!”, bondimela ye te.
24
Pamba te, ba-Kristo ya lokuta na baprofeta ya lokuta bakobima. Bakosala bilembo ya minene mpe makamwisi mpo na koluka nzela ya kokosa ata bato oyo Nzambe apona, soki yango ekokaki kosalama.
25
Nasiʼnakebisi bino liboso!
26
Soki moto alobi na bino: “Botala, azali na esobe”, bokende te. To “Azali awa, na esika ya kobombama”, bondima yango te.
27
Pamba te, koya ya Mwana ya Moto ekozala ndenge kongenga ya nkake ebimaka na Este mpe engengaka kino na Weste.
28
Esika ebembe ezali, bandeke oyo eliaka ebembe esanganaka wana.
29
Mbala moko, sima ya pasi ya mikolo wana, Moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya wuta likolo, mpe banguya ya likolo ekoningana.
30
Bongo elembo ya Mwana ya moto ekomonana na Likolo; mpe bato ya bikolo nyonso ya mokili bakolela, mpe bakomona Mwana ya moto akoya na likolo ya mapata, na nguya nyonso mpe na kembo monene.
31
Mpe akotinda baanzelu na ye elongo na lokito monene ya kelelo; bongo bango bakosangisa bato nyonso oyo ye apona na bipai nyonso minei ya mokili, banda na suka moko ya likolo kino na oyo mosusu.
32
Bolanda mateya ya nzete ya figi. Soki bitape na yango ekomi pete-pete, mpe makasa na yango ebandi kobima, wana boyebi ete tango ya mbula ekomi pene-pene.
33
Bino mpe ndenge moko, tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana ya moto akomi pene-pene na porte.
34
Nalobi na bino ya solo: bato ya tango oyo, bakoleka te, liboso ete makambo wana esalama.
35
Likolo mpe nse ekolela, kasi maloba na ngai ekoleka te!
36
—Mpo na likambo ya ngonga to mokolo makambo wana ekosalama, moto ata moko te ayebi yango; ata baanzelu na Likolo, ata Mwana, kaka Tata.
37
Makambo oyo esalamaki na tango ya Nowa, ekosalama mpe ndengemoko na tango ya koya ya Mwana ya moto.
38
Pamba te, liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, bazalaki kobala mpe kobalisa, kino mokolo Nowa akotaki na masuwa.
39
Kasi bayebaki eloko moko te na oyo elingaki koyela bango, kino mokolo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso. Ekozala mpe ndenge moko tango Mwana ya moto akoya.
40
Mibali mibale bakozala na elanga: bakomema moko mpe mosusuakotikala.
41
Basi mibale bakobanda konika mbuma na libanga, bakokamata moko mpe mosusu akotikala.
42
Yango wana bokengela malamu; pamba te boyebi te mokolo Nkolona bino akoya!
43
Boyeba malamu Sete, soki kolo ya ndako ayebi tango moyibi akoya na butu, akolala pongi te, mpo atika te moyibi akota na ndako na ye.
44
Yango wana bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bino bokokanisa te!
45
Nani azali mosali ya sembo mpe ya mayele, oyo mokonzi na ye atie ye kapita ya basali mosusu mpo na kopesa bango bilei na tango oyo ekoki?
46
Esengo ekozala mingi na mosali wana, soki tango mokonzi akozonga, akuti ye azali kosala mosala ndenge basengaki ye.
47
Nalobi na bino ya solo, mokonzi akotia ye moyangeli ya bilokona ye nyonso.
48
Kasi soki azali mosali mabe; akomiloba: “Mokonzi na ngaiazali koya noki te”,
49
mpe soki abandi konyokola baninga na ye ya mosala, kolia mpe komela esika moko na bato oyo balangwaka masanga;
50
bongo mokonzi akozonga na mokolo oyo ye azali kozela te, mpe na ngonga ye ayebi te.
51
Akopesa ye etumbu, mpe akotia ye esika moko na bato ya kokosana; epai ekozala kolela mpe koswa mino.
← Chapter 23
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 25 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28